Inicio Top Música Bad Bunny Música Cristiana Taylor Swift Ed Sheeran Luis Fonsi Ozuna Daddy Yankee J Balvin Maluma DMCA

Letra de 'Nakomitunaka' de Orchestra Veve - Escucha y canta en New Musica

Varios-artistas

Women of Latin Music

Varios-artistas

Dormir Junto Al Rio

Varios-artistas

Indie Disco

Varios-artistas

Deep House 2023

Artist profile picture

Nakomitunaka

Orchestra Veve

Canciones

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe oh nakomitunaka oh
Nzambe oh nakomitunaka oh
Poso moyindo ewuta nde wapi oh?
Poso moyindo ewuta nde wapi oh?
Koko na biso ya kala ye nani eh
Yezu mwana nzambe, ye nde mondele
Adamu na Eva bango nde mindele
Basantu nionso bango mpe mindele
Pona nini oh?

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe oh nakomitunaka oh
Nzambe oh nakomitunaka oh
Babuku ya nzambe tomonaka boye
Basantu nionso photo nse mindele
Banzelu nionso bango nse mindele
Soki zabulu photo moto moyindo
Han!
Injustice ewuta wapi oh?
Han mama han!

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe nakomitunaka oh
Poso moyindo ewuta nde wapi oh
Moto moyindo ewuta nde wapi oh
Ba noko bakanga biso mayele boye
Bikeko ya bakoko bango baboyaka
Nkisi ya bakoko bango ba ndimba te
Kasi na ndako ya nzambe biso tomonaka
Tokosambela chapelet na maboko
Tokosambela bikeko bitondi ndako
Kasi bikeko yango nse mindele
Pona nini nzambe?

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe oh nakomitunaka oh
Ba prophètes ya mindele biso tondimaka
Kasi ya bato moyindo bango bandimaka te
Pona nini nzambe osala biso boye?
Afrika miso efongwani
Afrika tozonga nsima te
Han mama han!

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe oh nakomitunaka oh
Poso moyindo ewuta nde wapi oh
Poso moyindo ewuta nde wapi oh
Koko na biso ya kala ye nani eh
Yezu mwana nzambe ye nde mondele
Adamu na Eva bango nde mindele
Basantu nionso bango mpe mindele
Pona nini nzambe?

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Nzambe oh nakomitunaka oh
Ba prophètes ya mindele biso tondimaka
Kasi ya bato moyindo bango bandimaka te
Pona nini nzambe osala biso boye?
Koko na biso bato moyindo azali wapi oh
Afrika miso efongwani!
Afrika tozonga nsima te!
Han mama han!

Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka
Ha-he nakomitunaka

Inicio Top Música Bad Bunny Música Cristiana Taylor Swift Ed Sheeran Luis Fonsi Ozuna Daddy Yankee J Balvin Maluma DMCA